Nzela moko ya monene ekoleka wana, bakobenga yango Balabala ya Bosantu. Moto moko te ya mbindo akoleka wana, pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe. Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›
Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka.
Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.