8 Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.
Nalembi, makasi na ngai nyonso esili ; mobulu ekoti na motema na ngai, nakomi koganga na kolemba te.
Biloko wana nyonso, ezali bapagano nde balukaka-lukaka yango ; kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.
Pamba te ezali bapagano ya mokili oyo nde balukaka-lukaka biloko wana nyonso. Tata na bino ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.
Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.