Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 6:6 - Mokanda na Bomoi

6 Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 6:6
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe.


Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, luka kimia mpe koba na yango.


Pamba te, soki osali bongo, okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye, mpe Yawe akofuta yo.


Bato na ngai, bokende, bokota na bashambre na bino mpe bokanga bikuke sima na bino ; bomibomba nanu mwa tango moke kino tango kanda ekoleka.


Liboso ete babelela Ngai, nakoyanola bango ; mpe wana basilisi nanu koloba te, nakoyoka bango.


Sima na Ye kozongisa bato, amataki na ngomba mpo na kosambela na esika oyo azalaki kaka Ye moko. Kino na pokwa, azalaki wana kaka Ye moko.


mpo ete moto moko te ayeba ete ozali kokila bilei, longola kaka Tata na yo, oyo amonanaka te ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku akopesa yo lifuti.


mpo ete likabo na yo ya mawa etikala sekele ; bongo Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.


Natanaele atunaki Ye : — Oyebi ngai ndenge nini ? Yesu azongiselaki ye : — Liboso ete Filipo abenga yo, wana ozalaki nanu na se ya nzete ya figi, namonaki yo.


Yesu alobaki na ye : — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.


Kornei azongisaki : — Eleki mikolo misato, na ngonga lokola oyo, ngonga ya misato sima na midi, nazalaki kosambela kati na ndako na ngai. Mbala moko, moto moko alata bilamba ya kongenga makasi atelemaki liboso na ngai


Mokolo oyo elandaki, na ngonga pene ya midi, wana bato oyo Kornei atindaki bazalaki nanu na nzela mpe bakomaki pene ya Jafa, Petelo amataki na veranda oyo ezalaki na likolo ya ndako mpo na kosambela.


Petelo abimisaki bato nyonso ; bongo afukamaki mpe asambelaki. Wana azalaki kotala epai ebembe ya mama Dorkasi ezalaki, alobaki : — Tabita, telema ! Tabita afungolaki miso ; mpe wana amonaki Petelo, avandaki.


Bato oyo batambolaka kolanda baposa ya nzoto batiaka makanisi na bango na makambo ya nzoto, kasi ba-oyo batambolaka kolanda Molimo batiaka makanisi na bango na makambo ya Molimo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ