34 Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko : mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.
Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ?
Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ;
Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ?
Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !
Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.