Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 6:28 - Mokanda na Bomoi

28 Bongo mpo na nini bomitungisaka mpo na bilamba ya kolata ? Botala bafololo ya bilanga ndenge ekolaka ! Esalaka te mpe etongaka bilamba te ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 6:28
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakobikisa bango na mabe na bango mpe nakolinga bango na motema moko, pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango.


Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te ; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye.


Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ?


Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye ?


Yango wana, bomitungisaka te na koloba : ‹ Tokolia nini ? Tokomela nini ? Tokolata nini ? ›


Nkolo azongiselaki ye : — Marte, Marte, ozali komitungisa mpe kominyokola mpo na makambo ebele,


Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ;


Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ?


Botala ndenge bafololo ya lisi ekolaka ! Esalaka te, etongaka bilamba te ; nzokande, nazali koloba na bino, ezala ye moko mokonzi Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.


Yoane azongiselaki bango : — Tika ete moto oyo azali na kazaka mibale apesa moko na moto oyo azangi kazaka, mpe tika ete moto oyo azali na bilei akabola na bato oyo bazangi bilei.


Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.


Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ