Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini ; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako.
Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.
Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe.
Bawumbu, botosaka bankolo na bino na makambo nyonso ; na miso na bango kaka te, lokola nde bozali kosepelisa bato, kasi na mitema ya bosembo mpe kati na kotosa Nkolo.