Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 6:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tango ozali kokabela babola, kobetela yango tangwa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka kati na bandako ya mayangani mpe na babalabala mpo ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 6:2
56 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akabelaka babola na motema ya esengo ; bosembo na ye ewumelaka libela na libela, lokumu na ye ekitaka te.


Moto mabe adefaka mpe azongisaka te, kasi moto ya sembo ayokaka mawa mpe akabaka.


Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.


Bato ebele batatolaka bolamu na bango, kasi nani akomona moto ya sembo ?


Kaba biloko na yo na bato sambo to mwambe, pamba te oyebi te pasi nini ekoki koya na mokili.


Natindi ye mpo ete atelemela ekolo oyo eyebi Yawe te mpe bato oyo bapesaka Ngai kanda, mpo ete abebisa mpe abotola biloko na bango mpe anyata bango lokola potopoto ya balabala.


Boni, ezali te kokabola bilei na yo na moto oyo azali na nzala ? Ezali te koyamba kati na ndako na yo, mobola oyo azali koyengayenga ? Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbu mpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo ?


Solo, mabe etumbaka lokola moto oyo ezikisaka basende mpe banzube, ezikisaka bazamba minene mpe ematisaka makonzi ya milinga.


Tia kelelo na monoko na yo ! Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe, mpo ete babebisi boyokani na Ngai mpe batombokeli Mobeko na Ngai.


Bato ya bilongi mibale ! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino :


Mpe na tongo, bolobaka : « Mvula makasi ekobeta lelo, pamba te mapata eyindi. » Solo, boyebi kososola bilembo oyo elakisaka soki mvula ekobeta to ekobeta te, kasi bozangi makoki ya kososola bilembo ya tango !


Kasi lokola Yesu asosolaki mayele mabe na bango, alobaki : — Bato ya bilongi mibale ! Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ?


Misala nyonso oyo basalaka, basalaka yango kaka mpo ete bato bamona bango. Boye, bayeisaka minene mikanda na bango, oyo bakoma biteni ya Makomi, mpe milayi, basonge ya banzambala na bango.


Balingaka kovanda na bisika ya lokumu kati na bafeti, mpe na bisika ya liboso kati na bandako ya mayangani ;


akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na bato ya bilongi mibale, na esika oyo ekozala kolela mpe koswa minu.


Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo : liboso ete Likolo mpe mabele elimwa, nkoma moko te oyo eleki moke to litono oyo ezalaka na likolo ya i ekotikala kolongwa kati na Mobeko, kino makambo nyonso ekokisama.


Tango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka ; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.


Kasi tango yo ozali kokabela babola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba ete likambo oyo loboko na yo ya mobali ezali kosala,


Tango bozali kosambela, bosalaka te lokola bato ya bilongi mibale oyo balingaka kosambela ya kotelema kati na bandako ya mayangani mpe na bisika oyo babalabala ekutana, mpo ete bato bamona bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.


Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo miso na yo ekomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.


balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;


Yesu azongiselaki bango : — Bato ya bilongi mibale ! Mosakoli Ezayi asakolaki penza malamu na tina na bino, kolanda ndenge ekomama : « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;


Bobonza nde bomoto na bino ya kati lokola likabo epai ya Nzambe, bongo mobimba na bino ekokoma mbala moko peto.


Mawa na bino, Bafarizeo ! Bolingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe bolingaka ete bato bapesa bino mbote ya lokumu, na bisika oyo bato ebele bakutanaka.


Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te ; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te ;


Bato ya bilongi mibale ! Boyebi malamu kolimbola bilembo oyo bomonaka na mokili mpe na likolo, bongo mpo na nini bozali koyeba te kososola tango oyo ?


Nkolo azongiselaki ye : — Bato ya bilongi mibale ! Nani kati na bino, na mokolo ya Saba, afungolaka te mpe amemaka te ngombe na ye to ane na ye, wuta na elielo, mpo ete ekende komela mayi ?


— Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;


Kasi mawa na bino oyo bozali bazwi, pamba te bosili kozwa kobondisama na bino !


Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso na yo, › wana ozali kokoka komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko. Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo okomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.


Lokola ezalaki Yuda nde azalaki kobatela libenga ya mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye : « Kende kosomba biloko oyo tosengeli na yango mpo na feti, » to « kende kopesa lisungi epai ya babola. »


Nalukaka na Ngai te lokumu oyo ewutaka na bato.


Lokola bolukaka kaka kopesana lokumu bino na bino mpe boboyaka lokumu oyo ewutaka kaka na Nzambe, ndenge nini bokoki kondima Ngai ?


Moto oyo alobaka na kombo na ye moko alukaka lokumu na ye moko ; kaka oyo azali koluka lokumu ya Nzambe oyo atindaki Ye nde azali koloba solo, mpe mabe ezali te kati na Ye.


Kornei elongo na bato nyonso ya libota na ye bazalaki komipesa na makambo ya Nzambe mpe kotosa Nzambe ; azalaki kosunga bato oyo bazalaki kati na bosenga ya ndenge na ndenge mpe kosambela Nzambe tango nyonso.


mpe alobaki : « Kornei, Nzambe ayoki mabondeli na yo mpe akanisi masungi oyo opesaka epai ya babola.


Kornei atalaki ye na somo mpe atunaki : — Nkolo, likambo nini ? Anjelu azongisaki : — Mabondeli na yo mpe masungi oyo opesaka epai ya babola emati liboso ya Nzambe, mpe akanisi yango.


Bayekoli oyo bazalaki kati na Antioshe bazwaki mokano ya kotinda masungi, moko na moko kolanda bozwi na ye, epai ya bandeko oyo bazalaki kovanda na Yuda.


Sima na ngai kosala mibu ebele na libanda ya Yelusalemi, nazongaki na mboka na ngai mpo na komemela bato bakelela ya ekolo na ngai lisungi, mpe mpo na kobonzela Nzambe makabo.


Kati na Jafa, ezalaki na mwasi moyekoli moko, kombo na ye ezalaki « Tabita. » Na lokota ya Greki, kombo na ye ezalaki Dorkasi (oyo elingi koloba : Mboloko). Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosunga babola.


tika ete moto oyo azali na likabo ya kolendisa alendisaka, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa apesaka na motema moko, tika ete moto oyo azali na likabo ya kokamba akambaka na molende, mpe tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato bakelela asungaka na esengo !


Soki napesi biloko na ngai nyonso epai ya babola, mpe nakabi nzoto na ngai mpo ete batumba yango, kasi nazangi bolingo, nakozwa ata litomba moko te.


Basengaki na biso kaka ete tokoba kokanisa babola. Mpe nasalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba yango.


Tika ete moyibi ayiba lisusu te, kasi amipesa nde na mosala ; mpe tika ete maboko na ye esala na bosembo nyonso mpo ete azwa eloko ya kosunga na yango moto oyo azali kati na bosenga.


Tolukaki te lokumu kowuta na bato, ezala epai na bino to epai ya bato mosusu,


Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato.


Ndeko na ngai, bolingo na yo mpo na basantu ezali penza kopesa ngai esengo mingi mpe kolendisa ngai, pamba te okitisaki bango mitema.


Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.


Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe ; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


Saulo alobaki : — Nasali lisumu. Kasi, sik’oyo, nabondeli yo : pesa ngai lokumu liboso ya bampaka ya bato na ngai mpe liboso ya Isalaele, zonga elongo na ngai mpo ete nakoka kogumbamela Yawe, Nzambe na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ