Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 6:19 - Mokanda na Bomoi

19 Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 6:19
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na molili, bato balukaka kobuka bandako ya bato ; kasi na moyi, bamikangelaka na ndako, bazali koboya pole.


Soki natiaki elikya na ngai na wolo to nalobaki na wolo ya kitoko : ‹ Ozali ekimelo na ngai, ›


Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama, ezali pamba na miso na Yo. Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.


Solo, bato bazali lokola molunge, bazali lokola lokuta ; Soki batie bango na emekelo kilo, ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo.


Kasi soki makambo yango esalemi na moyi, moto oyo akoboma ye akozwa etumbu mpo na makila oyo esopani. Moyibi nyonso asengeli kozongisa biloko oyo ayibi. Soki azali na eloko te, bakoteka ye mpo na kofuta eloko oyo ayibaki.


Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa.


Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.


Nzambe apesaka bwanya, mayele mpe esengo na moto oyo asepelisaka Ye ; kasi apesaka mosala ya kosangisa mpe ya konduka bomengo epai ya moto oyo asalaka masumu mpo ete atika yango na maboko ya moto oyo asepelisaka Nzambe. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili.


Yesu azongisaki : — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.


Kasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango ;


Ekozala bongo mpo na moto nyonso oyo andukaka bomengo mpo na ye moko, kasi alukaka te kozala mozwi na miso ya Nzambe.


Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te ; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te ;


Kasi bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga oyo moyibi akoya, alingaki kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.


Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye : — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.


Yesu atalaki ye mpe alobaki : — Ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !


Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.


Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ