Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 6:18 - Mokanda na Bomoi

18 mpo ete moto moko te ayeba ete ozali kokila bilei, longola kaka Tata na yo, oyo amonanaka te ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku akopesa yo lifuti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 6:18
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpo ete likabo na yo ya mawa etikala sekele ; bongo Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.


Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.


Nzambe akofuta moto na moto kolanda misala na ye :


Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka bosolo na tina na ye.


Yango wana, ezala tovandi kati na nzoto oyo to totiki yango, tokolukaka kaka kosepelisa Nkolo.


Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.


Mpo na lokumu ya Nkolo, botosaka bato nyonso oyo batiami kati na bino lokola bakonzi : mokonzi ya mboka,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ