Bongo Davidi atelemaki wuta na mabele, amisukolaki nzoto, amipakolaki malasi, alataki bilamba mosusu, akotaki na Tempelo ya Yawe mpe agumbamaki mpo na kosambela. Sima, azongaki na ndako na ye, asengaki bilei mpe aliaki.
Boye, Joabi atindaki moto moko na mboka Tekoa, mpo na koluka mwasi moko ya bwanya mpe komema ye longwa kuna. Alobaki na ye : « Sala lokola moto oyo azali na matanga, lata bilamba ya matanga, kopakola mafuta te : sala lokola mwasi oyo alata pili wuta mikolo ebele mpo na kolela ebembe ;
Boye, sukola malamu nzoto na yo, pakola mafuta mpe lata bilamba na yo, oyo eleki kitoko. Bongo, okokende na etando epai wapi akobeta orje na ye ; kasi sala ete Boazi ayeba te ete ozali na esika yango kino akosilisa kolia mpe komela.