Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 5:45 - Mokanda na Bomoi

45 Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 5:45
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ? Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ?


Yawe azali malamu mpo na bato nyonso, atonda na mawa mpo na bikelamu na Ye nyonso.


Bamilobelaka te : ‹ Tika ete totosa Yawe, Nzambe na biso, oyo anokisaka mvula na tango ekoki, na eleko ya kolona mpe ya kobuka ; oyo akatela biso baposo oyo esengeli mpo na kobuka milona. ›


Esengo na bato oyo bayeisaka kimia, pamba te bakobengama bana na Nzambe !


Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.


Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai.


Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.


Boye, lokola bozali bana oyo Nzambe alingaka mingi, bomekolaka Ye.


mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili


Moto nyonso oyo akoma mwana na Nzambe akobaka te kosala masumu, pamba te nguya ya bomoi ya bonzambe ezali kosala kati na ye ; akoki te kokoba kosala masumu, pamba te azali mwana na Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ