Elize azongisaki : — Koboma bango te ! Boni, okoboma solo bato oyo okangi, na nzela ya mopanga na yo to ya tolotolo na yo ? Pesa bango nde bilei mpe mayi ya komela mpo ete balia, bamela mpe bazonga epai ya mokonzi na bango.
Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.
Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.