Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 5:32 - Mokanda na Bomoi

32 Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 5:32
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola ezalaki likambo ya pamba mpo na Isalaele kosala kindumba, akomisaki mokili mbindo mpe asalaki kindumba na banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga mpe na banzete.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.


Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo, mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongoli na libala asali mpe ekobo.


Mibali mibale bazalaki kosolola na Yesu : Moyize mpe Eliya


Mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango, elobaki : — Oyo azali Mwana na Ngai, oyo napona ; boyoka Ye !


Boye soki, wana mobali na ye azali nanu na bomoi, akomi mwasi ya mobali mosusu, bakoloba ete asali ekobo. Kasi soki mobali na ye akufi, akangolami libela na mobeko yango mpe akoki kokoma mwasi ya mobali mosusu ; boye bakoloba te ete asali ekobo.


Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye ; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye.


Sima na kobima na ndako ya mobali wana, mwasi yango akoki kobala mobali mosusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ