Pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nayinaka likambo ya koboma libala ; ekokani na moto oyo elamba na ye ezwi makila tango abomi moto, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. Yango wana, bosala keba mpo na bomoi na bino mpe botikala sembo.
Bafarizeo bapusanaki pene na Ye mpo na komeka Ye ; bapesaki Ye motuna : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala mpo na likambo songolo ?