Matayo 5:29 - Mokanda na Bomoi29 Yango wana, soki liso na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ezali na tina misato oyo esalaka ete mibali mosusu babala te : ezali na mibali oyo, wuta na mabumu ya bamama na bango, bakoki kobala te ; ezali na mibali oyo baboma bango mokongo ; ezali mpe lisusu na mibali oyo bango moko baboya kobala mpo na Bokonzi ya Likolo. Tika ete moto oyo azali na makoki ya kondima mateya oyo andima yango !