17 Bokanisa te ete Ngai nayaki mpo na kolongola Mobeko to basakoli ; solo, nayaki te mpo na kolongola, kasi nayaki nde mpo na kokokisa.
Esepelisaki Yawe, mpo na bosembo na Ye, kokomisa Mobeko na Ye eloko ya monene mpe ya lokumu.
Yesu azongiselaki ye : — Tika ete esalema bongo sik’oyo ! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.
Nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango ; pamba te yango nde mateya nyonso ya Mobeko mpe ya basakoli.
Ezali penza pete mpo na Likolo mpe mabele kolimwa ; kasi mpo na Mibeko, ezali penza pasi mpo na nkoma na yango oyo eleki moke kolongwa.
Kati na mibeko, Moyize apesa biso mitindo ya koboma basi ya boye na mabanga. Bongo yo, olobi nini na tina na yango ?
mpe bafundaki ye boye : — Moto oyo azali koluka kondimisa bato ete bagumbamela Nzambe na lolenge oyo mibeko epekisa.
na koganga : — Bato ya Isalaele, bosunga biso ! Botala moto oyo azali koteya bato nyonso mpe na bisika nyonso, ete batelemela bato na biso, Mobeko na biso mpe Tempelo oyo. Lisusu, akotisi bato ya Grese kati na Tempelo mpe akomisi esika oyo ya bule mbindo.
Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki : — Moto oyo azali kotika te koloba mabe mpo na kobebisa lokumu ya esika oyo ya bule mpe ya mibeko ;
Klisto nde asukisa Mobeko mpo ete moto nyonso oyo akondima akoma moto ya sembo.
Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima ? Soki moke te ! Tozali kutu kolendisa yango.
Asalaki bongo mpo ete bosembo oyo Mobeko esengaka ekokisama kati na biso oyo totambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda Molimo.