15 Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini ; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako.
Yesu alobaki na bango lisusu : — Boni, bamemaka solo mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ? Ezali te mpo na kotia yango na likolo ya etelemiselo ya minda ?
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na esika ya kobombama to na se ya katini. Nzokande, batiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole.
Soki nzoto na yo mobimba ezali kati na pole, mpe eteni ata moko te ezali kati na molili, nzoto na yo mobimba ekotonda na pole lokola tango mwinda engengisaka yo na nzela ya pole na yango.
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ; atiaka yango nde na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole na yango.
mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili
Batelemisaki Mongombo oyo ezalaki na biteni mibale : kati na eteni ya liboso oyo bazalaki kobenga « Esika ya bule, » ezalaki na etelemiselo ya minda, mesa mpe mapa oyo babonzi lokola makabo epai ya Nzambe.
Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya ! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso ; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango.