Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 5:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo ; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 5:12
51 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli : — Kobanga te, Abrami ! Nazali nguba na yo, lifuti na yo ekozala monene.


Nkolo na ngai, oyokaki te makambo oyo nasalaki tango Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe ? Nabombaki basakoli ya Yawe nkama moko kati na madusu mibale ya mabanga : tuku mitano na lidusu moko na moko mpe napesaki bango bilei mpe mayi ya komela.


Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga : basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi.


Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango.


Tango Akabi amonaki Eliya, alobaki : — Ah, monguna na ngai, omoni ngai kaka ! Eliya azongisaki : — Solo, namoni yo ; pamba te omitekaki yo moko mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe.


Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te !


Mbala moko, mokonzi atindaki mokonzi ya basoda tuku mitano epai ya Eliya elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda tuku mitano akendeki epai ya Eliya oyo azalaki kovanda na songe ya ngomba mpe alobaki na ye : — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende epai na ye.


Mokonzi Asa asilikelaki makasi momoni makambo mpe abwakaki ye na boloko. Kaka na tango yango, Asa anyokolaki ndambo ya bato.


Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.


Kasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango.


Ezali na motuya koleka wolo, koleka wolo ebele ya peto, wolo oyo basangisa na eloko mosusu te ; eleki mafuta ya nzoyi na elengi, mafuta ya nzoyi oyo ezali kobima sika.


Moto ya sembo akosepela, pamba te akomona Nzambe kozongisela bato mabe, mabe na mabe, mpe akotambola kati na makila na bango.


Moto mabe asalaka mosala na lokuta, kasi moto oyo alonaka na bosembo akozwa lifuti ya malonga.


Loba na moto ya sembo : « Bolamu ekobila yo, pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. »


« Napesaki bato na yo etumbu ya pamba ; pamba te bazwaki na bango kaka mayele te. Mopanga na yo ebomi basakoli na yo ndenge nkosi ebomaka bato.


Kasi tango Jeremi asilisaki koloba na bato nyonso maloba oyo Yawe atindaki ye, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bakangaki ye mpe balobaki : « Okokufa !


Jeremi azongisaki : — Te ! Ezali lokuta, nazali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni te ! Kasi Iriya aboyaki koyoka ye, akangaki ye kaka mpe amemaki ye epai ya bakambi.


Pamba te Mwana na Moto akoya elongo na ba-anjelu na Ye kati na nkembo ya Tata na Ye mpe akofuta moto nyonso kolanda misala na ye.


Tango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka ; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.


Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki.


Tango makambo yango ekokokisama, bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo. Ezalaki mpe kaka ndenge wana nde batata na bango banyokolaki basakoli.


Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.


Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo ; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango.


Bantoma balongwaki liboso ya Likita-Monene, na esengo mingi ya komona ete bakoki mpo na komona pasi na tina na Kombo na Yesu.


Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko,


Moto oyo aloni mpe moto oyo asopi mayi bazali kaka ndenge moko, mpe moko na moko akozwa lifuti na ye moko kolanda mosala na ye.


Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.


Mpo na oyo etali Klisto, Nzambe apesaki bino ngolu kaka te ya kondimela Ye, kasi ngolu mpe ya konyokwama mpo na Ye,


Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso.


Nazali sik’oyo kosepela na pasi oyo nazali komona mpo na bino ; pamba te pasi oyo Klisto atikalaki komona te, ngai nazali kokokisa yango kati na nzoto na ngai mpo na bolamu ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba.


pamba te boyebi malamu ete bokozwa, lokola lifuti, libula oyo Nkolo abongisa mpo na bato ya Nzambe. Ezali Klisto nde azali Nkolo oyo bosalelaka.


Ezali bango Bayuda nde babomaki Nkolo Yesu mpe basakoli ; ezali mpe kaka bango nde banyokolaki biso. Basepelisaka Nzambe te mpe bazali banguna ya bato nyonso ;


Bokabolaki pasi elongo na bakangami ya boloko, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola ata biloko na bino, pamba te boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko koleka, bomengo oyo ekowumela libela na libela.


pamba te amonaki ete kotiolama lokola Klisto ezali malamu koleka bomengo ya Ejipito, mpo ete azalaki kotalela lifuti oyo ezali koya.


Mpo na kondima, balongaki bokonzi ebele, batambolisaki makambo na bosembo mpe bamonaki bilaka ya Nzambe kokokisama mpo na bango ; bakangaki ata minoko ya bankosi,


Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangi kondima, pamba te moto oyo azali kopusana pene ya Nzambe asengeli kondima ete Nzambe azali mpe afutaka bato oyo balukaka Ye.


Bandeko na ngai, bomona lokola likambo ya esengo, lolenge nyonso ya komekama oyo bozali kokutana na yango.


Bandeko, mpo na oyo etali kokanga motema kati na pasi, bozwa ndakisa ya basakoli oyo basakolaki na Kombo ya Nkolo.


Bosepela nde, pamba te bozali kosangana na bapasi ya Klisto mpo ete botonda mpe na esengo tango akomonisa nkembo na Ye.


Tika ete Yawe afuta yo mpo na makambo oyo osalaki. Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, afuta yo koleka, lokola oyaki kobombama na se ya mapapu na Ye !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ