Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 4:7 - Mokanda na Bomoi

7 Yesu azongiselaki ye : — Ekomama mpe : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 4:7
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na esobe, bamipesaki na bilulela, bamekaki Nzambe kati na mabele oyo ezali na bato te.


Bamekaki Nzambe na nko, na kosenga bilei kolanda posa na bango.


bazalaki kozongela komeka Nzambe, koyokisa Mosantu ya Isalaele mawa.


Kasi bamekaki Nzambe, batombokelaki Ye-Oyo-Aleki-Likolo mpe babatelaki te malako na Ye ;


epai wapi batata na bino batombokelaki ngai mpe bamekaki ngai atako bamonaki ngai kosala.


Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye : — Pesa biso mayi ya komela ! Moyize azongiselaki bango : — Mpo na nini bozali koswanisa ngai ? Mpo na nini bolingi komeka Yawe ?


Abengaki esika yango Masa mpe Meriba, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki : « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te ? »


Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.


Tosengeli sik’oyo komona bato ya lofundu lokola bato ya esengo, bato mabe bazali kokende liboso. Atako bazali kobeta tembe na Nzambe, kasi bazali kaka kolonga. › »


moko te kati na bato oyo bamonaki nkembo na Ngai mpe bikamwa oyo nasalaki kati na Ejipito mpe na esobe kasi baboyaki kotosa Ngai mpe bamekaki Ngai mbala zomi,


Balobaki na Yesu : — Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ? Yesu azongiselaki bango : — Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te : « Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana oyo bazali nanu komela mabele, ozwaki lokumu na Yo ? »


Yesu alobaki na bango : — Nanu botanga te kati na Makomi : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ? Nkolo asalaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso. »


Yesu alobaki na ye : — Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »


Yesu azongisaki : — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »


Yesu azongisaki : — Ekomama : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »


Bongo mpo na nini bolingi sik’oyo komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo tolongaki te komema, ezala biso to batata na biso ?


Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.


Tosengeli mpe te komeka Klisto, ndenge bamosusu kati na bango basalaki ; mpe banyoka ebomaki bango mpo ete eswaki bango.


Komeka te Yawe, Nzambe na yo, ndenge osalaki na Masa.


epai wapi batata na bino bamekaki ngai mpe balukaki kotala mozindo ya motema na ngai atako bamonaki misala na ngai


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ