Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 4:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bongo, Satana amemaki Ye na engumba ya bule, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 4:5
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe ezalaki na bametele pene zomi, na bosanda, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto kati na yango.


Bakambi ya bato bayaki kovanda na Yelusalemi. Ndambo mosusu kati na bato babetaki zeke mpo ete moto moko kati na bato zomi aya kovanda na Yelusalemi, engumba ya bule ; mpe mpo ete bato libwa oyo batikali bavanda kati na bingumba na bango.


Balevi nyonso oyo bazalaki kovanda kati na engumba ya bule bazalaki nkama mibale tuku mwambe na minei.


Bino oyo bomibengaka « Bato ya engumba mosantu » mpe bolukaka lisungi epai ya Nzambe ya Isalaele, oyo Kombo na Ye ezali « Yawe, Mokonzi ya mampinga. »


Oh Siona, lamuka, lamuka ! Tika ete omikomisa lisusu makasi. Yelusalemi, engumba ya bule, lata bilamba na yo ya lokumu, pamba te ezala moto oyo bakata ngenga te to moto ya mbindo, akokota lisusu kati na yo te.


Nkolo, nabondeli Yo, kolanda makambo nyonso oyo osalaka mpo na bosembo, kanda mpe kotomboka na Yo ezali kolongwa kati na engumba na Yo, Yelusalemi, ngomba na Yo ya bule ! likolo ya masumu na biso mpe ya mabe ya bakoko na biso, Yelusalemi mpe bato na Yo bakomi eloko ya liseki na miso ya bato nyonso oyo bazingeli biso.


Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu.


ebimaki na bakunda mpe, sima na lisekwa ya Yesu, ekotaki kati na engumba ya bule epai wapi bato ebele bamonaki yango.


Bongo Satana amemaki Ye na Yelusalemi, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo mpe alobaki na Ye : — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ;


Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.


Kasi kozwa te molayi ya lopango ya libanda ya Tempelo, pamba te esilaki kokabama na maboko ya bikolo ya bapaya. Bapagano bakonyata engumba ya bule basanza tuku minei na mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ