Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 4:4 - Mokanda na Bomoi

4 Yesu azongisaki : — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 4:4
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bana ya Isalaele bamonaki yango, batunanaki bango na bango : — Oyo nini ? Pamba te bayebaki te soki ezali nini. Moyize alobaki na bango : — Ezali mapa oyo Yawe apesi bino mpo ete bolia.


Bana ya Isalaele baliaki mana mibu tuku minei kino tango bakomaki na mondelo ya mokili ya Kanana.


Moyize alobaki lisusu : — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani ? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.


Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Na mikolo sambo kolanda ndenge napesaki bino mitindo, bokolia mapa ezanga levire na tango oyo ekatama, na sanza ya Abibi, mpo ete ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.


eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.


Yesu alobaki na ye : — Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »


Yesu azongiselaki ye : — Ekomama mpe : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »


Yesu alobaki lisusu : — Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo.


Yesu azongisaki : — Ekomama : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »


Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te. »


Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »


Tango Molobeli akoya, oyo nakotindela bino kowuta epai ya Tata —Molimo ya bosolo, oyo akowuta epai ya Tata— akotatola Ye moko na tina na Ngai ;


Ezali Molimo nde apesaka bomoi ; mosuni ezali na eloko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali Molimo mpe bomoi.


Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya.


Bolataka lobiko lokola ekoti ya ebende, mpe bozwaka Liloba na Nzambe lokola mopanga ya Molimo.


Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ