Wana mokolo ya Saba ekokaki, Yesu akomaki koteya kati na ndako ya mayangani. Kati na bato oyo bayokaki Ye, ebele bakamwaki makasi. Batunaki : « Boni, moto oyo azwi makambo oyo wapi ? Nani apesi ye bwanya ya boye ? Azwi wapi nguya ya kosala bikamwa oyo nyonso ?
Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene.