Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 4:24 - Mokanda na Bomoi

24 Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 4:24
41 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.


Tango mwasi mokonzi ya Saba ayokaki sango ya lokumu oyo Kombo ya Yawe epesaki Salomo, ayaki mpo na komeka ye na nzela ya mituna ya makasi ;


Kombo ya Davidi ekendeki sango na mokili mobimba mpe Yawe asalaki ete bikolo nyonso ebanga Davidi.


Na bozwi na ngai nyonso, nabongisaki mpo na Ndako ya Nzambe na ngai : wolo mpo na misala ya wolo, palata mpo na misala ya palata, ebende mpo na misala ya bibende, mabaya mpo na misala ya mabaya, mabanga ya onikisi mpe mabanga ya kobamba, mabanga oyo engengaka mpe ya balangi ebele, mabanga ya talo ya lolenge nyonso mpe mabanga ya marbre. Biloko oyo nyonso ezalaki penza ebele.


Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »


Bongo bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki mokufi miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye ; boye moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba mpe komona.


Na tango wana, sango na tina na Yesu epanzanaki makasi mpe ekomaki kino na matoyi ya Erode, moyangeli ya Galile.


Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.


— Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa ! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi : akweyaka mbala mingi na moto to na mayi.


Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki.


Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.


Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na etuka ya Gadara, bato mibale oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe babimaki wuta na bakunda mpe bayaki kokutana na Yesu ; bazalaki bato na kanza makasi, mpe bato bazalaki kobanga koleka na nzela wana.


Bakengeli bangulu bakimaki, bakendeki kati na engumba kopesa sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema mpe ndenge nini bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe basilaki kokangolama.


Alobaki : — Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali kokoka kotambola te mpe azali kobela makasi.


Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.


Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge.


Mbala moko, sango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka mobimba ya Galile.


Wana moyi elalaki mpe pokwa eyaki, bamemelaki Yesu babeli nyonso mpe bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe.


Bato mosusu bamemelaki Ye ebosono oyo bato minei batomboli.


Lokola balongaki te kokomisa ebosono yango kino na esika oyo Yesu azalaki, pamba te bato bazalaki ebele penza, bamataki likolo ya mwanza ya ndako kino na esika oyo Yesu azalaki mpe batobolaki lidusu. Bongo na nzela ya lidusu yango, bakitisaki na tsipoyi ebosono yango.


Likambo nini eleki pete mpo na koloba na ebosono : « Masumu na yo elimbisami to telema, kamata tsipoyi na yo mpe tambola ? »


Ezalaki mbala ya liboso ya kotanga motango ya bato, wana Kiriniusi azalaki moyangeli ya Siri.


Yesu azongaki na Galile, atonda na nguya ya Molimo ; mpe basango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka wana mobimba.


Yesu abimaki na ndako ya mayangani mpe akendeki na ndako ya Simona. Mama-bokilo ya Simona azalaki kobela fievele makasi. Basengaki na Yesu ete abikisa ye.


Sango na tina na Yesu ezalaki kaka kopanzana se kopanzana, mpe bato ebele bazalaki koya kosangana mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango.


Kasi nalingi boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono : « Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe kende na ndako na yo ! »


Sango oyo na tina na Yesu epanzanaki kati na Yuda mpe kati na bamboka ya zingazinga.


Bamosusu bazalaki kozongisa : — Maloba wana ezali te ya moto oyo azali na se ya bokonzi ya molimo mabe ! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bakufi miso ?


ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.


Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye : Biso bantoma mpe bakambi, bandeko na bino : Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na Antioshe, na Siri mpe na Silisi ; Mbote na bino.


Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa Mangomba.


Sima na yango, babeli mosusu ya esanga bayaki epai na ye mpe babikisamaki.


Pamba te milimo ya mbindo ezalaki kobima kati na bato mingi na koganga makasi, mpe bato mingi oyo bakufa makolo mpe oyo batambolaka tengu-tengu babikaki.


Yawe azalaki elongo na Jozue, mpe sango na ye epanzanaki mokili mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ