Boye alamukaki, aliaki mpe amelaki. Bongo na makasi oyo azwaki na nzela ya bilei, atambolaki mobembo ya mikolo tuku minei mpe ya babutu tuku minei kino akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.
Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.
Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.
Bongo nakweyaki mbala moko liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, naliaki lipa te mpe namelaki mayi te mpo na lisumu monene oyo bosalaki wana bosalaki mabe na miso ya Yawe mpe, na bongo, bopesaki Ye kanda.