Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 4:18 - Mokanda na Bomoi

18 Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale : Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 4:18
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.


Yango wana natindi yo sik’oyo mpo ete okende epai ya Faraon mpo na kobimisa bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito.


Balobi mbisi bakobanda kovanda na bangambo ya ebale monene, wuta na Eyini-Gedi kino na Eyini-Egilayimi, mpo na kobwaka minyama mpe kozwa bambisi ya lolenge nyonso lokola bambisi oyo ezalaka na ebale monene.


longwa na Shefami, ekokita na Ribila na ngambo ya este ya Ayini mpe ekolanda ebale ya Kinereti, na ngambo na yango ya este,


Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale : liboso, Simona oyo kombo na ye mosusu ezalaki Petelo ; Andre, ndeko ya Petelo ; Jake, mwana mobali ya Zebede ; Yoane, ndeko ya Jake ;


Yesu alongwaki wana mpe akendeki na ebale ya Galile ; amataki likolo ya ngomba mpe avandaki kuna.


Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.


Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »


Yesu alongwaki na engumba ya Tiri, alekaki na Sidoni mpe akendeki na ebale ya Galile wana akatisaki etuka ya bingumba zomi.


Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » Andre, ndeko na ye ; Jake, Yoane, Filipo, Bartelemi ;


Sima na yango, Yesu abimelaki lisusu bayekoli na Ye na libongo ya ebale ya Tiberiade. Tala ndenge nini abimelaki bango :


Sima na yango, Yesu akendeki na ngambo mosusu ya ebale ya Galile oyo babengaka mpe ebale ya Tiberiade.


Moko kati na bayekoli na Ye, oyo kombo na ye ezali Andre, ndeko mobali ya Simona Petelo, alobaki na Ye :


Mondelo na yango ya weste ezalaki Yordani : wuta na Kinereti kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, na se ya bangomba ya Pisiga na ngambo ya este.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ