akabelaki Irami, mokonzi ya Tiri, bingumba tuku mibale kati na Galile, pamba te Irami asungaki Salomo na nyonso oyo azalaki na yango na bosenga : mabaya ya sedele, ya sipele mpe wolo.
Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri.
Bana ya Isalaele babulisaki Kedeshi, kati na Galile, kati na mokili ya bangomba ya Nefitali ; Sishemi, kati na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.
Kati na libota ya Nefitali : Kedeshi, kati na mokili ya Galile, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi ; Amoti-Dori mpe Karitani, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba misato.