mpe soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bato oyo bamemaki bango na bowumbu mpe balobi : ‹ Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe ; ›
Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›
Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.
Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema mpe bakokatela bato ya ekeke oyo etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Yona.
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. »
Bongo, Yesu alobaki na bango : — Yango wana, molakisi nyonso ya mibeko, oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo akokani na nkolo ndako oyo azali kobimisa na ebombelo bomengo na ye : biloko ya sika mpe biloko ya kala.
Pamba te, tala ndenge nini Bokonzi ya Likolo ezali : Bokonzi ya Likolo ezali lokola nkolo elanga ya vino oyo abimaki na tongo makasi mpo na koluka bato oyo bakosala na elanga na ye.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [
Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.
Na nzela yango, nazali koloba na bino : esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.
Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
Nazalaki tango nyonso kosenga, ezala na Bayuda to na bato ya Grese, ete bazongela Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe batia kondima na bango kati na Yesu, Nkolo na biso.
Nateyaki liboso bavandi ya Damasi ; sima, nateyaki bavandi ya Yelusalemi, ya Yuda mobimba mpe ya bikolo ya bapaya : nateyaki bango ete basengeli kobongola mitema, kozonga epai ya Nzambe mpe, na nzela ya misala na bango, kolakisa penza ete babongoli mitema.
Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa.
mpe ya koteya na boboto bato oyo babendanaka na ye ; asengeli kozala na elikya ete Nzambe akosalela bango ngolu ya kobongola mitema mpo ete bayeba solo.
Yango wana, tokota na mateya oyo ekoki mpo na mikolo ; tolekisa tango te na mateya ya ebandeli na tina na Klisto, mpe tozongela te mateya lokola kobongola motema, kotika misala oyo ememaka na kufa, kondima kati na Nzambe,
Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya ! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso ; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango.