Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 3:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki ; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 3:16
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molimo na Yawe akowumela na likolo na Ye : Molimo ya bwanya mpe ya mayele, Molimo ya toli mpe ya nguya, Molimo ya boyebi mpe ya kotosa Yawe ;


Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,


« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.


Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;


Ezalaki mokolo moko, mokolo ya mitano ya sanza ya minei, na mobu ya tuku misato, wana nazalaki pembeni ya ebale Kebari kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, likolo efungwamaki mpe namonaki bimoniseli ya Nzambe.


Tango kaka abimaki na mayi, amonaki Likolo kofungwama mpe Molimo kokitela Ye lokola ebenga.


Bongo alobaki lisusu : « Nazali koloba na bino penza ya solo : bokomona Likolo kofungwama, mpe ba-anjelu ya Nzambe komata mpe kokita mpo na Mwana na Moto. »


Motindami ya Nzambe alobaka kaka maloba kowuta na Nzambe, pamba te Nzambe atondisa ye na Molimo na Ye nyonso.


kobanda na tango oyo Yoane abatisaki Ye kino na mokolo oyo balongolaki Ye kati na biso. Pamba te moko kati na mibali yango asengeli kokoma, elongo na biso, motatoli ya lisekwa na Ye.


Alobaki : — Botala, namoni Likolo efungwami mpe Mwana na moto atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe !


Yesu-Klisto azali Ye oyo ayaki na nzela ya mayi mpe makila ; ayaki na nzela ya mayi kaka te, kasi na nzela ya mayi mpe makila. Mpe ezali Molimo nde atatoli bongo, pamba te Molimo azali solo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ