Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene.
Wana bayekoli ya Yoane bazalaki kozonga, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane ; atunaki bango : — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ?
pamba te Yoane ayaki nde epai na bino mpo na kolakisa bino nzela ya bosembo, kasi bondimaki ye te ; nzokande, bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye. Atako bomonaki yango na miso na bino, kasi bobongolaki kaka mitema te mpe bondimaki ye kaka te.
Tango bato oyo Yoane atindaki bazongaki, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane : — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ?
kobanda na tango oyo Yoane abatisaki Ye kino na mokolo oyo balongolaki Ye kati na biso. Pamba te moko kati na mibali yango asengeli kokoma, elongo na biso, motatoli ya lisekwa na Ye.
Bakitani ya Keni oyo azalaki bokilo ya Moyize balongwaki na engumba ya banzete ya Mbila elongo na bato ya libota ya Yuda, mpe bakendeki kovanda esika moko na bavandi ya esobe ya Yuda, oyo ezali na sude ya Aradi.