Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 28:9 - Mokanda na Bomoi

9 Mbala moko, Yesu akutanaki na bango mpe alobaki : — Mbote na bino ! Bapusanaki pene na Ye, basimbaki makolo na Ye mpe bagumbamelaki Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 28:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Biso nyonso, tokomi lokola eloko ya mbindo, misala na biso nyonso ya bosembo ezali lokola elamba ya mbindo ; biso nyonso tokawuki lokola likasa mpe masumu na biso ememi biso lokola mopepe !


Bato oyo bazalaki kati na bwato bagumbamelaki Yesu mpe balobaki : — Ya solo, ozali Mwana na Nzambe !


balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe babenga bango ‹ Moteyi. ›


Yesu alobaki na bango : — Bobanga te ! Bokende koyebisa bandeko na Ngai ete bakende na Galile ; ezali kuna nde bakomona Ngai.


Tango bamonaki Ye, bagumbamelaki Ye ; kasi bamosusu kati na bango bandimaki te.


Balongwaki noki na kunda, na somo mpe na esengo makasi ; bapotaki mbangu mpo na kokende kopesa sango epai ya bayekoli na Ye.


Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye : — Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo !


Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi.


atelemaki na sima ya Yesu, na makolo na Ye ; azalaki kolela mpe, na mpinzoli na ye, akomaki kopolisa makolo ya Yesu. Bongo apangusaki makolo yango na nzela ya suki na ye, apesaki yango beze mpe asopelaki yango malasi.


Mari akamataki ndambo ya litele ya malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi, asopaki yango na makolo ya Yesu mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo yango. Ndako mobimba etondaki na solo ya malasi yango.


Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !


Toma azongiselaki Yesu : — Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai !


Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : Bosepelaka ! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ