mpe bokende noki koyebisa bayekoli na Ye : ‹ Asili kosekwa kati na bakufi ; akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye. › Yango nde makambo oyo nazalaki na yango ya koyebisa bino. »
Babimaki na lombangu mpe bakimaki mosika ya kunda ya Yesu, pamba te bango nyonso bazalaki kolenga na somo, mpe makanisi na bango epalanganaki. Balobaki eloko te na moto nyonso, pamba te bazalaki kobanga.
Nazali koloba na bino penza ya solo : wana bino bokozala kolela mpe komitungisa, mokili ekosepela ; bokozala solo na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.
Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa ; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango.