Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 28:7 - Mokanda na Bomoi

7 mpe bokende noki koyebisa bayekoli na Ye : ‹ Asili kosekwa kati na bakufi ; akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye. › Yango nde makambo oyo nazalaki na yango ya koyebisa bino. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 28:7
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bolenga te, bobanga mpe te. Boni, natatolaki yango te ? Nasakolaki yango te wuta kala ? Bozali batatoli na Ngai. Boni, ezali na nzambe mosusu pembeni na Ngai ? Te, ezali na Libanga mosusu te, nayebi ata moko te. »


Botelema mpe bopesa sango, boloba makambo na bino mpe tosamba elongo ! Nani asakolaki yango wuta kala mpe atatolaki yango wuta na tango oyo eleka ? Ezali Ngai Yawe te ? Ezali na Nzambe mosusu te, soki Ngai te. Nazali Nzambe ya sembo mpe Mobikisi ; mosusu azali te, soki Ngai te.


Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.


Yesu alobaki na bango : — Bobanga te ! Bokende koyebisa bandeko na Ngai ete bakende na Galile ; ezali kuna nde bakomona Ngai.


Balongwaki noki na kunda, na somo mpe na esengo makasi ; bapotaki mbangu mpo na kokende kopesa sango epai ya bayekoli na Ye.


Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.


Bongo Mari akendeki koyebisa bato oyo batambolaki elongo na Yesu ; akutaki bango batondi na mawa mpe bazali kolela.


Bazongaki mpe bayebisaki yango epai ya bayekoli mosusu ; kasi bayekoli yango bandimaki bango te.


oyo balobaki na bango : — Ezali ya solo, Nkolo asekwi ; abimelaki Simona !


Nayebisi bino makambo yango sik’oyo, liboso ete esalema, mpo ete bokoka kondima, na mokolo oyo ekosalema.


Namiyebiseli bino makambo wana nyonso mpo ete, soki tango yango ekoki, bokanisa ete Ngai nasilaki koyebisa bino yango. Nayebisaki bino yango te wuta na ebandeli, mpo ete nazalaki nanu elongo na bino.


bakundaki Ye, mpe asekwaki na mokolo ya misato, ndenge Makomi elobaki yango liboso.


Sima na yango, amonanaki epai ya bandeko koleka nkama mitano na mbala moko ; mpe mingi kati na bango bazali nanu na bomoi kino na tango oyo, kasi bamosusu basila kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ