Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Mwana na Moto koya kati na nkembo ya bokonzi na Ye.
Yesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.
Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso ; kasi moto oyo awuti na mokili akotikala kaka ya mokili mpe alobaka kaka lokola moto ya mokili. Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso,
Pamba te atiaki biloko nyonso na se ya matambe na Ye. Kasi wana alobi : « Nyonso ezali na se ya bokonzi na Ye, » etalisami polele ete esengeli te kotanga Nzambe oyo atiaki nyonso na se ya bokonzi na Ye.
Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.
mpe otiaki biloko nyonso na se ya matambe na ye. » Awa Nzambe atiaki nyonso na se ya bokonzi na ye, atikaki ata eloko moko te oyo ezangaki kozala na se ya bokonzi na ye. Nzokande, ezali solo ete, kino sik’oyo, tomoni nanu te ete nyonso ezali na se ya bokonzi na ye.
Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »