mpe bokende noki koyebisa bayekoli na Ye : ‹ Asili kosekwa kati na bakufi ; akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye. › Yango nde makambo oyo nazalaki na yango ya koyebisa bino. »
Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga ; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye.
Mpe lisusu, soki ezali penza ya solo ete bakufi bakosekwa te, wana tozali batatoli ya lokuta na tina na Nzambe, pamba te totatoli lokuta na tina na Nzambe ete asekwisaki Klisto kati na bakufi. Nzokande soki ezali penza bongo ete bakufi bakosekwa te, wana Nzambe asekwisaki Yesu te.