7 Boye, basanganaki mpe bazwaki mokano ya kosomba, na mbongo yango, elanga ya mosali mbeki, mpe ya kokomisa yango lilita mpo na kokunda bapaya.
Bakonzi ya Banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki : — Mibeko epesi nzela te ya kotia mbongo oyo na ebombelo misolo ya Tempelo, pamba te ezali mbongo ya makila.
Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka elanga yango elanga ya makila.