Boye, mokonzi apesaki mitindo ete bamema Daniele mpe babwaka ye kati na libulu ya bankosi. Mokonzi alobaki na Daniele : — Nzambe na yo, oyo osalelaka na molende, akobikisa yo !
mpe atiaki nzoto yango kati na kunda moko ya sika, oyo atobolisaki ye moko kati na libanga moko ya monene. Mpe atindikaki libanga mosusu ya monene liboso ya ekotelo ya kunda yango, mpe azongaki.
Wana basi bazalaki kokende, ndambo ya bakengeli bazongaki kati na engumba mpo na koyebisa na bakonzi ya Banganga-Nzambe, makambo nyonso oyo ewutaki koleka.
Mbala moko, mabele eninganaki makasi, pamba te anjelu ya Nkolo akitaki longwa na Likolo, akendeki na kunda, atindikaki libanga mpe avandaki na likolo na yango.
Mpe tango batombolaki miso, bamonaki ete libanga esilaki kotindikama mpe ezalaki lisusu te na ekotelo ya kunda ; nzokande, libanga yango ezalaki ya monene penza.
Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana molili ezalaki nanu, Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki na kunda mpe amonaki ete libanga esilaki kolongolama na ekotelo ya kunda.
Anjelu abwakaki ye kati na libulu wana ya monene mpe ya molili makasi ; akangaki yango mpe abetaki kashe na likolo na yango mpo ete akosa lisusu bikolo te kino tango mibu nkoto moko ekokoka. Sima na yango, bakotika ye mpo na mwa tango moke.