6 Bakonzi ya Banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki : — Mibeko epesi nzela te ya kotia mbongo oyo na ebombelo misolo ya Tempelo, pamba te ezali mbongo ya makila.
Kasi bino, boteyaka ete soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye : « Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nakobonza yango lokola likabo epai ya Nzambe, »
Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika.