Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 27:56 - Mokanda na Bomoi

56 Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake mpe ya Jozefi ; mpe mama ya bana ya Zebede.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 27:56
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali ye te mwana ya mosali mabaya ? Mama na ye, kombo na ye ezali Mari te ? Jake, Jozefi, Simona mpe Jide bazali bandeko na ye ya mibali te ?


Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bavandaki wana, na ngambo mosusu ya kunda.


Sima na mokolo ya Saba, na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bakendeki kotala kunda.


Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Joze, bazalaki kotala esika oyo akotia nzoto ya Yesu.


Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, tango Yesu asekwaki, abimelaki liboso Mari, moto ya mboka Magidala, oyo, kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo.


Ezalaki : Mari, moto ya mboka Magidala ; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma,


bakisa ndambo ya basi oyo bakangolamaki na milimo mabe mpe babikisamaki na bokono : Mari, moto ya Magidala, oyo kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo ;


Tala bato oyo batelemaki pene ya ekulusu ya Yesu : Mama na Ye, ndeko mwasi ya mama na Ye, Mari oyo azalaki mwasi ya Klopasi, mpe Mari ya mboka Magidala.


Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana molili ezalaki nanu, Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki na kunda mpe amonaki ete libanga esilaki kolongolama na ekotelo ya kunda.


Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki koyebisa bayekoli ete awuti komona Nkolo ; ayebisaki bango lisusu makambo oyo Nkolo alobaki na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ