Bakambi ya bato bayaki kovanda na Yelusalemi. Ndambo mosusu kati na bato babetaki zeke mpo ete moto moko kati na bato zomi aya kovanda na Yelusalemi, engumba ya bule ; mpe mpo ete bato libwa oyo batikali bavanda kati na bingumba na bango.
Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu.
Kasi kozwa te molayi ya lopango ya libanda ya Tempelo, pamba te esilaki kokabama na maboko ya bikolo ya bapaya. Bapagano bakonyata engumba ya bule basanza tuku minei na mibale.
Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye.
mpe soki moto alongoli ata likambo moko na maloba ya masakoli ya buku oyo, Nzambe mpe akolongola ye ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya kokota kati na Engumba ya Bule, oyo etalisami kati na buku oyo.