Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 27:52 - Mokanda na Bomoi

52 bakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 27:52
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo moko, tango bazalaki kokunda moto moko, bamonaki na mbalakata lisanga moko ya bato mabe. Bongo, babwakaki na lombangu ebembe ya moto yango kati na kunda ya Elize. Tango ebembe etutaki mikuwa ya Elize, moto yango azongaki na bomoi mpe atelemaki.


akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.


Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo ! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo ; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.


Ebele ya bato oyo bakundama na se ya mabele bakosekwa : bamoko mpo na bomoi ya seko, mpe mosusu mpo na soni mpe somo ya libela.


Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi, nakosikola bango na kufa. Oh kufa, wapi nguya na yo ? Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa ? Nakoyokela bango mawa te !


Sima na Ye koloba bongo, alobaki na bango lisusu : — Molingami na biso, Lazare, alali pongi ; kasi nazali kokende kolamusa ye.


Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi : — Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te ! Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.


Yango wana mingi kati na bino bakoma na bolembu mpe na bokono, mpe ebele kati na bino bakufa.


Kasi, solo, Klisto asekwaki kati na bakufi : azali Mosekwi ya liboso kati na bakufi.


Boyoka, nazali kotalisa bino mabombami : Biso nyonso, tokokufa te ; kasi biso nyonso, tokobongolama,


Pamba te ndenge tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki, ndenge mpe tondimaka ete Nzambe akomema, na nzela ya Yesu mpe elongo na Ye, bato oyo bakufa kati na Ye.


oyo akufelaki biso mpo ete, ezala soki tozali na bomoi to tokufi, tozala na bomoi elongo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ