Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima ! Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye.
Pamba te ezala Klisto, alukaki te komisepelisa Ye moko ; kasi alobaki, kolanda ndenge ekomama, « mafinga ya bato oyo bafingaki yo ekweyaki epai na ngai. »
Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.