Nalobi na Nzambe, Libanga na ngai : « Mpo na nini obosani ngai ? Mpo na nini nasengeli kotambola na mawa kati na motema mpe na se ya minyoko ya monguna ? »
Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba : ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ›
Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba : ‹ Yawe akokangola biso. › Boni, ezali na nzambe ya ekolo songolo, oyo alonga kokangola ekolo na ye na loboko ya mokonzi ya Asiri ?
« Boyebisa Ezekiasi, mokonzi ya Yuda : ‹ Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo : ‘ Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ’