« Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te ! Azali mokonzi ya Isalaele ! Tika ete akita sik’oyo longwa na ekulusu, bongo tokondimela Ye.
mpe alobaki na Ye : — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; pamba te ekomama : « Akopesa mitindo na ba-anjelu na tina na yo, mpe bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te. »
Bavandi nyonso ya mokili bakosepela na tina na kufa na bango, bakosala feti mpe bakopesana bakado, pamba te basakoli wana mibale batungisaki mingi bavandi ya mokili.