36 mpe bavandaki wana mpo na kokengela Ye.
Na likolo ya moto ya Yesu, batiaki makomi oyo mpo na kotalisa mpo nini bakatelaki Ye etumbu : Moto oyo azali Yesu, Mokonzi ya Bayuda.
Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !
Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !
Pilato akamwaki tango ayokaki ete Yesu asilaki kokufa ; abengaki mokonzi ya basoda mpo na kotuna ye soki solo Yesu asilaki kokufa.