Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 27:31 - Mokanda na Bomoi

31 Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala, balatisaki Ye bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 27:31
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo botia mpe liboso na ye bato ya kilikili mibale oyo bakokosela ye makambo na maloba oyo : ‹ Olakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! › Na sima, bomema ye na libanda ya engumba mpe boboma ye na mabanga. »


Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.


Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, kasi atikalaki kofungola monoko na ye te lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale ; akangaki monoko na ye.


Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Moto oyo asengeli kokufa. Bato nyonso ya lisanga basengeli komema ye libanda ya molako mpe koboma ye na mabanga. »


mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »


Bakangaki ye, babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye.


« Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. »


Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala ya motane, balatisaki Ye lisusu bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.


Pilato akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. Boye, bakamataki Yesu mpe bakendeki na Ye.


Mpe alobaki na moyekoli yango : — Tala mama na yo ! Boye, kobanda na tango wana, moyekoli yango azwaki mama ya Yesu mpo ete akoma kovanda na ndako na ye.


bamemaki ye libanda ya engumba mpe babambaki ye mabanga. Na tango wana, batatoli batikaki bilamba na bango epai ya elenge mobali moko na kombo Saulo.


Yango wana Yesu mpe akufaki na libanda ya mboka mpo na kobulisa bato na nzela ya makila na Ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ