Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 27:26 - Mokanda na Bomoi

26 Pilato abimiselaki bango Barabasi ; mpe sima na kobetisa Yesu fimbu, apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 27:26
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napesaki mokongo na ngai epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, matama na ngai, epai ya bato oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. Nabombaki elongi na ngai te na kotiolama mpe na basoyi.


Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso, banyokolaki ye mpo na masumu na biso ; etumbu oyo ememelaki biso kimia ekweyaki na nzoto na ye ; mpe na nzela ya bapota na ye, biso tobikisami na bokono na biso.


mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »


bakoseka Ye, bakobwakela Ye soyi, bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; kasi, sima na mikolo misato, akosekwa.


Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.


Na bongo, nakobetisa ye kaka fimbu mpe, sima, nakotika ye. [


Bongo Pilato apesaki mitindo ete bakamata Yesu, mpe abetisaki Ye fimbu.


Pilato akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. Boye, bakamataki Yesu mpe bakendeki na Ye.


Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ