Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 27:22 - Mokanda na Bomoi

22 Pilato atunaki bango : — Nasala nini na Yesu oyo babengaka Klisto ? Bato nyonso bazongisaki : — Baka ye na ekulusu !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 27:22
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

soki bato ya libota na ngai balobaka te : ‹ Nani oyo atondaki te na misuni ya banyama ya Yobo ? ›


Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe : « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »


Na sanza moko kaka, nabomaki babateli bibwele misato ; nakokaki lisusu kokanga motema te, mpe etonga eyinaki ngai.


Jakobi abotaki Jozefi, mobali ya Mari ; mpe Mari azalaki mama ya Yesu oyo babengaka Klisto.


Tango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango : — Kati na Yesu Barabasi mpe Yesu oyo babengaka Klisto, bolingi nabimisela bino nani mpo ete akoma nsomi ?


Moyangeli atunaki bango lisusu : — Kati na bango mibale, bolingi nabimisela bino nani ? Bazongisaki na koganga : — Barabasi !


Pilato atunaki lisusu : — Mabe nini asali ? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : — Baka ye na ekulusu !


Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, kasi bazalaki kozwa yango te ;


Mwasi alobaki na Yesu : — Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto ; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.


Atako bamonaki mabe moko te kati na Ye, mabe oyo ekokaki komemela Ye etumbu ya kufa, kasi basengaki kaka ete Pilato aboma Ye.


Yango wana, bandeko na ngai, nalingi boyeba ete ezali na nzela ya Yesu nde bolimbisi ya masumu esakolami epai na bino mpe bozwi bolimbisi ya masumu nyonso oyo Mobeko ya Moyize ekokaki te kokangola bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ