Tango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango : — Kati na Yesu Barabasi mpe Yesu oyo babengaka Klisto, bolingi nabimisela bino nani mpo ete akoma nsomi ?
Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bandimisaki ebele ya bato ete basenga na makasi kobima ya Barabasi longwa na boloko, mpe komona ndenge bakoboma Yesu.