20 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bandimisaki ebele ya bato ete basenga na makasi kobima ya Barabasi longwa na boloko, mpe komona ndenge bakoboma Yesu.
Kasi tango Jeremi asilisaki koloba na bato nyonso maloba oyo Yawe atindaki ye, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bakangaki ye mpe balobaki : « Okokufa !
Moyangeli atunaki bango lisusu : — Kati na bango mibale, bolingi nabimisela bino nani ? Bazongisaki na koganga : — Barabasi !
Bakonzi ya Banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo ete basenga na Pilato ete abimisela bango Barabasi longwa na boloko.
Bango nyonso bazongisaki na koganga : — Te ! Ye te ! Bimisa nde Barabasi ! Nzokande, Barabasi azalaki moyibi mpe mobomi bato.
Mikolo nyonso ya Saba, Polo azalaki koteya kati na ndako ya mayangani mpe azalaki koluka kondimisa Bayuda mpe bato ya Grese.