19 Wana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba : — Kokota te na makambo ya moto wana ya sembo ; pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi kati na ndoto likolo na ye !
Na butu, Nzambe ayaki epai ya Labani, moto ya Arami, kati na ndoto ; alobaki na ye : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
Tala, nazali na makoki ya kosala yo mabe, kasi na butu oyo eleki, Nzambe ya tata na yo alobaki na ngai : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.
Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
alobaki : — Boyoka maloba na Ngai ! Soki mosakoli moko ya Yawe azali kati na bino, namimonisaka Ngai moko epai na ye na nzela ya bimoniseli, nalobaka na ye na nzela ya bandoto.
Wana Jozefi azalaki kokanisa makambo yango, anjelu na Nkolo abimelaki ye kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Jozefi, mokitani ya Davidi, kobanga te kobala Mari ; pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu.
Kasi tango ayokaki ete Arikelawusi akitanaki na tata na ye, Erode, na bokonzi kati na Yuda, abangaki kokende kuna ; kasi Nzambe akebisaki Jozefi kati na ndoto, mpe Jozefi akendeki kati na etuka ya Galile
Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba : — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino.
Polo azongisaki : — Te, natelemi liboso ya esambiselo ya Sezare ; ezali awa nde nasengeli kosamba. Yo moko oyebi malamu ete nasali Bayuda ata likambo moko te ya mabe.
Festisi asalaki mikolo pene mwambe to zomi elongo na bango, mpe azongaki na Sezarea. Mokolo oyo elandaki bozongi na ye, avandaki na esambiselo mpe apesaki mitindo ete bamemela ye Polo.
Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki esali ete moko kati na bino akweyi na lisumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata : Yesu-Klisto, Nkolo-Na-Bosembo.